Friday 26 June 2009

Monday 22 June 2009

Lopango ya Banka - Bifuku Mitano

Lingala garçon1:
Bandeko babolingo boyebi na malamu bino nioso.
Likambo na mabele ezali ko ningisa mikili nioso.

Bandeko na biso basili kofufa liwa ya somo na kivu, na Bunia,na mbandaka, na kongo dia kati, to bosani bino te.

Mwana mboka lamuka. Banguna ba koteli biso na kati ya lopango.
Basali soni na bana ghetto.
Yo mobili, sokola maboko.
Bifuku mitano basili kokende.
Bifuku mitano balingi ba bomba yango.
Bifuku mitano, il pourrait kozala ngai na yo.
Bifuku mitano, ba délivrance ekoki kozala ...ngai na yo.
Swahili garçon2:
wa kaka , na wa dada wa tesua dju ya vita.
Wa me liya mingi paka matiozi zina wakawuka.
Ya toto wana ibwa wazazi, wana kazi yako liki na mupanga
uzuri sana.
Wandugu wana tshishwa kama niama.
Usu hitike «mot»...na kazi zetu...kazi yabo niku tsheza na wa sifa zetu.

Lingala—Fille:
Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te.

Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te. .

Lingala garçon3:
Ebembe ya soso matanga te, mandala te, soki na kanisi bibembe na Congo
nalalaka te. Maya misu ezo sila kotanga te.
Tolati pili kino liwa.
Bolindibiso ti kino liwa kobosana te.
Babombi ye na mayi ya makila batangisa.
Balati ya pembe mpo tokanisaaaa yeeee.
Baye na bosembo.
Lela ba nka na lo yembo oyo.
Yamba yango eza fololo na malita na bawei.

Lelo nakufeli tata, nakufeli mama
na zingi maboko na maya.
Na moyi nako pepa lindala.
Ngai awa mayi ya miso esili ko kauka.
Solo ya bibembe mutu esili kolauka.
Makanisi eleki mpongi ekomi ya bobangi.
Makili ekomi na miso eboyi mpe komona.
Boyoka ngai mawa matoyi eboti nde ko koyoka.

Lingala—Fille:
Bandeko bo yokaaaaaa

Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te.

Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te.

Lingla Garçon4:
Baninga balingi te Doudou asekisa biso.
Balingi te Ngike apanza sango.
Balingi te DDK ba telema.
Yango wana ba huti koboma ba ndako na Boma, Tshela, Mwanda, Matadiii
Inga,Songolo, kiadiiii
Mbanzangungu, Lemba, kisantuuuu
Kasangulu,Kinshasa, ici partout...

Lingala Fille:
likolo ya mabele na ngaaaa
olingi te pemaaa
olingi te na lobaaa
noki te oko tindela ba mbaaaa
ya kanda oooo yeee
ya kanda oooo yeee

Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te.

Mokuya na Congo liwa litinga biso ooo maya.
Bifuku mitano ya bawei biso to bosana te.

Lingala Garçon 5:
Aaahh bozo mona likambo balingi
likambo bilingi wana balingi bakabola mboka na biso.
Bifuku mitano ya ba ndeko oyo bakufi eza ya pamba te.
Kivu ekomi kokende wapi? Boko ya ko sutuka Kivu eza lisusu te.
Congo mobombi ndeko totelemela likambo oyo.
Oyo bakufi ekokaki kozala ngai to yo.
Toyeba ngo
Tozo bosana yango.

Bana Congo toza banani.
Tokoki ko tika te basakana na biso boye.
Totelemela likambo wana.

Totelemela yango.